Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

RDC :Batomboki ba M23 bakutani na bakambi ba mampinga ma EAC mpo na kolongwa bisika bazua na Kibumba


DRCONGO-UNREST-CONFLICT
DRCONGO-UNREST-CONFLICT

Batomboki ba M23 basakoli lelo ete bandimi kotika bitumba, mpe kolongwa na mboka Kibumba eye ezuami na ba kilometres pene tuku mibale ya engumba Goma, na Est ya monyele ekolo Kongo démocratique eye bazuaki na suka ya sanza ya zomi ya mobu moye. Na liyebisi babimisaki baskoli ete kotika bisika biye ezali po na kopesa nzela na masolo ma Koluka Kimya lokola esengamaka na bokutani bwa sanza ya zomi na mibale eleki na Luanda o ekolo Angola. Nsima bango kolongwa na bisika biye mampinga ma bikolo bya EAC nde bakozua bokonzi o bisika biye.

Milulu mya botiki bitumba mpe kolongwa bisika bazuaki misalemi lelo liboso lya bakambi ba mampinga ma ekolo RDC, Kenya, Rwanda, Ouganda mpe Soudan du Sud.

Sima ya milulu miye, bapanzi sango baye bazuaki esika na milulu myango bamemamaki na engumba mokonzi Goma.

Mokano mwa kotika bitumba biye mozuami kaka mokolo moko sima bobimi bwa manaka ma Nations Unies maye mazali kofunda ekolo Rwanda na kosala bitumba na mabele ma ekolo Congo Democratique mpe kopesa maboko mpe bibundeli ya ndenge na ndenge na basimba minduki ba M23 wuto sanza ya zomi ya mobu 2021 kino sanza ya zomi na moko ya mobu moye.

Wuto ebandela ya bitumba biye, Kinshasa efundaka ekolo Rwanda na kozala nsima ya basimba minduki baye, kasi Kigali ewanganaka na kolobaka ete ya liboso, bitumba biye bilukami na bakonzi ba ekolo RDC mpo na kopusa maponami mazali koya na mboka na bango na mobu mozali koya, mpe bapamelaka mbulamatari ya RDC nakopesaka maboko na ba FDLR baye babundisaka mbulamatari ya ekolo Rwanda wuto mabele ma RDC. Mikolo mileki, Ekolo Etats Unis na bikolo bisusu ba Europa bafundaki ekolo Rwanda na kopesa maboko na basimba minduki baye ba M23.

XS
SM
MD
LG