Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bobomi ya ntoma ya Italie: Mosambi ya liboso awangani mpe alobi andimaki yambo na nse ya kobetama


Nzoto ya ntoma Luca Attanasio ya ITalie ememami na motuku ya lopitalo ya MONUSCO nsima na kobetama masasi na bato bayebani te na Kibumba, na 25 kms ya Goma, Nord-Kivu, 22 février 2021.
Nzoto ya ntoma Luca Attanasio ya ITalie ememami na motuku ya lopitalo ya MONUSCO nsima na kobetama masasi na bato bayebani te na Kibumba, na 25 kms ya Goma, Nord-Kivu, 22 février 2021.

Moto ya liboso ya kosambisama mpo na bobomi bwa ntoma ya Italie na RDC Luca Attanasio na Virunga, moyi Ekolo Congo démocratique, Issa Seba Nyani alobi liboso lya tribunal ya basoda na boloko bonene CPRK/Makala ete andimaki makambo na kokosa mpo azalaki konyokolama mpe kobetana.

Ezalaki mbala ya liboso ete bafundami babanda koloba. Bato banei bakangamaki mpo na bobomi boye, basato bazali ba bosambisami kasi moko na bango akimaki.

Ntoma Luca Attanasio abomamaki na masasi le 22 fevrier 2021 elongo na mokengeli na ye na motambwisi motuka ntango bazalaki na molongo ya mituka ya PAM na Virunga na Nord-Kivu.

XS
SM
MD
LG