Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi atie général Tshiwewe bo' mokambi ya mampinga ma RDC


Chef d'état-major général to mokambi ya mampinga manso ma Ekolo Congo démocratique, général Christian Tshiwewe, na Kinshasa, 4 octobre 2022 (Facebook/Présidence RDC)
Chef d'état-major général to mokambi ya mampinga manso ma Ekolo Congo démocratique, général Christian Tshiwewe, na Kinshasa, 4 octobre 2022 (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi atie wuto lobi na mpokwa général Christian Tshiwewe Songesha na ebonga ya Chef d’état-major général to ya mokambi ya mampinga manso ma Ekolo Congo démocratique.

Général Christian Tshiwewe Songesha azalaki mokambi ya garde présidentielle kasi azwi sika ebonga ezali kino sika na général d’armée Célestin Mbala Munsense wuto sanza ya sambo ya 2018.

Mokano mwa président Félix Tshisekedi motie bo’ mokambi ya sika ya garde présidentielle général-major Ephraïm Kabi Kiriza na esika général Christian Tshiswewe azalaki.

Général Jacques Isaligonza Nduru nde apesami ebonga ya mokambi molandi ya mampinga na maye matali misala mpe bokengi.

Bakonzi basusu basato mpe bapesami mpete mpe bibonga. Kati na bango molobeli ya kala ya mampinga general-major Leon-Richard oyo atiami na ebonga ya kokamba adminstartion mpe logitisque.

Général Christian Tshiwewe akokisa mibu ntuku mitano na minei sanza eye. Abotama na Lubumbashi na Haut-Katanga.

Na 1998, azalaki kati na ba officiers rangers ba yambo na yekolaki na Soudan nsima na bokweyisami ya mokonzi ya kala Mobutu Sese Seko. Na 1999 kino alandaki mateya ma commandement ya état-major « Mura » na Likasi.

Nsima na yango ayekolaki kozala commanda de brigae na centre supérieur ya Kinshasa wuto 2003 kino 2004 mpe akentaki kotanga bitumba na baondongolmeso to anti-terrorisme na balakisi ba Israel na Angola.

Azalaki mpe na promtion Kabila ya mibale na College des Hautes études militaires mpe stratéquies ya bobateli mboka ya Kinshasa. Azalaki mokambi mokambi molandi ya garde républicaine mpo etali misala mpe sango to bokengi wuto 2014 kino 2020.

XS
SM
MD
LG