Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Couvre-feu to bokotisami na ndako elongolami na Goma


Basoda nzinga nzinga na batelemeli liboso lya ndako ya Monusco, Goma, Nord-Kivu, 26 juillet 2022.
Basoda nzinga nzinga na batelemeli liboso lya ndako ya Monusco, Goma, Nord-Kivu, 26 juillet 2022.

Bakonzi ya ba soda baye bazali kokamba etuka ya Nord-Kivu na eloko ya état de siège eye etiamaki na monyele ya Ekolo Congo démocratique wuto mobu moko na sanza minei, basakoli ete "Couvre-feu" to mokano mwa kokotisami na ndako molongolami na engumba ya Goma.

"Elongolami, mokano mwa bokotisami na ndako (Couvre-feu) na etando mobimba ya engumba Goma... Mpo na bisika bisusu bitakali na Nord-Kivu, ngonga ya bokotisami na ndako etikali na esika kino mikano misusu mizwama, na kozela bobongisami ya bokengi," elobi na général de brigade Danny Yangba, mopesi toli ya yambo ya mambi matali ntey mpe bokengi ya mokambi ya soda ya Nord-Kivu.

GénBde Yangba alimbola ete mokano mwano molandi moye mozwamaki le 21 décembre 2021 na ntina ya kobatela bana mboka na eleko ya ba feti na etuka ya Nord-Kivu.

Bolongolami ya covure-feu na Goma bosalami, nsima na mobembo Ministre wa Yambo Jean-Michel Sama Lukonde asalaki na bituka bya Ituri mpe Nord-Kivu epayi wapi bato baike basengaki ye bolongwi ya couvre-feu, suka ya état de siège mpe bozongi ya kimya.

Mokano ya kosukisa couvre-feu mosakolami nsima na bavandi ba engumba Goma kotelemisa misala minso mokolo moye mwa yambo 26 septembre 2022 mpo na kosenga bakonzi kobotolo mboka Bunagana mpe nzinga nzinga na maboko ma batomboki ba M23 baye bazwa yango wuto sika koleka sanza misato.

Bavandi ba Goma batiaki bipekiselo na nzela na engumba eye. Bazali mpe kosenga bolongwi ya Monusco (Misala mya Onu na Congo) na RDC mpe bozongisa bwa kimya na mboka.

Etat de siège etiamaka na monyele ya RDC wuto sanza ya mitano ya 2021, mpe mampinga ma RDC (FARDC) basalaka elongo na mampinga ma Uganda (UPDF) misala mya kobundisa ba ADF, lingomba lizalaki kala ya bayi Uganda.

Nzokande mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi alobaki na mokolo ya mitano moleki na ba media ya ekolo France ete kala mingi te basoda ba ekolo Kenya bakotindama na Bunagana na nzela ya misala mya boyokani ya mampinga ma Lisanga bya bikolo bya Afrika ya Est (EAC) na ntina ya kobengana ba M23

XS
SM
MD
LG