Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

FARDC elobi bobotoli ya Bunagana bolakisi polele ete Rwanda ekoti na mabele ma RDC


Bayi mamapinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC) na Misala mya koyiikisa kimya makasi ya ONU na RDC (MONUSCO) na bitumba na batomboki ba M23 na Rutshuru, Nord-Kivu, RDC, 13 mai 2022. (VOA/Austere Malivika)
Bayi mamapinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC) na Misala mya koyiikisa kimya makasi ya ONU na RDC (MONUSCO) na bitumba na batomboki ba M23 na Rutshuru, Nord-Kivu, RDC, 13 mai 2022. (VOA/Austere Malivika)

Mampinga ma Ekolo Congo démocratique, FARDC, mandimi ete batomboki ba N23 babotoli enumba Bunagana mpe mapameli RDF, mampinga ma Rwanda, kokota na polele na mabele ma Congo.

“Nsima na komona bokweyisami ya makasi ya baye esungaka, RDF (Forces ya defense ya Rwanda) ezwi mokona, mbala eye, ya kobuka bopekisi ya ndelo mpe bonsomi ya mabele ma biso na koyaka kozwa engumba ya Bunagana, na ndelo, lelo lundi 13 juin, elobi liyebisi lya FARDC.

“Yango ezali, kolongola to kobakisa te, bokoti na makasi na RDC mpe mampinga ma Ekolo Congo démocratique makozwa mikano misengeli mpe makobunda mpo na ekolo,” ebakisi liyebisi litiami manzaka na general de Brigade Sylvain Bomus aEkenge, molobeli ya mokambi ya ya soda ya etuka ya Nord-Kivu.

FARDC ekoundoli ete wuto mikolo mibale batomboki ba M23 baye bapesami maboko na RDF babunisaki ba FARDC na Bigega 1 na 2 kasi balongaki te.

“Mampinga ma ekolo mabetaki bango na kobomaka mingi kati na bango,” ekomi gen. de Brig. Ekenge.

Na ngambo na yango, Rwanda, na nzela ya molobeli ya mbulamatari na yango, Yolande Makolo, epameli RDC kobeta mbala mingi ba bombes na Rwanda.

“Bonsomi ya bikolo binso bikokani, ezala Rwanda ro RDC,” eyanoli Yolande Makolo na Twitter na makomi molebili ya ONU akomaki.

“Ntango RDC ezali kobeta ba bombes na mabele ma Rwanda mpe Rwanda etumoli te, ezali likambo lya makasi mpenza liye lizali na mbano mpe yango esengeli kosila,” ekebisaki Yolande Makolo.

XS
SM
MD
LG