Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba FARDC bakangi basoda babale ya Rwanda na bitumba na ba M23


Mampinga ma RDC malakisi basoda babale ya Rwanda makangi na bitumba na M23
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:02:19 0:00

Mampinga na RDC malakisi basoda babale ya Rwanda makangi na bitumba na M23

FARDC, Mampinga ma Ekolo Congo démocratique, esakoli ete ekangaki basoda babale ya Rwanda na bitumba na batomboki ya ba M23, mpe emituni ntina ya bosangisami ya makasi kati na mampinga ma Rwanda.

"Na bitumba (ya ba M23), mampinga ma Ekolo Congo démocratique makangi basoda babale ya Rwanda. Ezali bongo adjudant Habyarimana Jean Pierre, marticule AP 277779, na soda Uwajeneza Muhindi John, alias Zaje, banso ya bataillon 65 ya brigade 402 ya mampinga ma Rwanda," ekomi na liyebisi molobeli ya ba FARDC, général de brigade Sylvain Ekenge Bomusa Efomi.

Ba FARDC na ba M23 bazali na bitumba wuto butu ya mokolo mwa eyenga na mokolo mwa yambo na ngomba ya Runyoni na Chanzu eye batomboki ya M23 babotoli, elobaki bayi mampinga ma RDC.

Bavandi ya bisika biye bakimi. Baike na Uganda, basusu na Rutsuru na Bunagana.

Liyebisi lya mampinga ma Ekolo, ba FARDC balobi "bamituni ntina ya bosangisami ya makasi mpo na misala ya bosangisami na moninga oyo atosaka te malakoo ma ye na RDC, to mpe lisusu malabo ma ye moko na bokutani ya ndenge na ndenge mpe na masolo ya bakambi ya likolo, na elaka".

Ba FARDC balaki ete bazali kosala manso mpo na kozongisa kimya.

Mpe, mampinga masengi na bavandi ya Nord-Kivu kokoba kozala na ekenge mpo na kofunda bato banso bazali mpenza malamu te.

XS
SM
MD
LG