Président ya kala ya Mali Amadou Toumani Touré akufi buku boleki na mibu tuku sambo na mibale na Truquie.
Akotaki lopitalo nsima na kozwa lipaso mbala mingi na motema, elobi bayi libota mpe ba dokotolo.
Ayebani mingi lokola ATT mpe mpo na misala mya transition démocratique na mboka na ye.
C%27est avec beaucoup de peine que j%27apprends le décès de l%27ancien président de la République du Mali, Amadou Toumani Touré. Un panafricaniste. Je garde en mémoire ce qu%27il m%27a dit, dans sa résidence, sur la #RDC. Mes très sincères condoléances à sa famille et au peuple malien.
— Martin Fayulu (@MartinFayulu) November 10, 2020
Kasi bokoti na ye na bokonzi na 1991 bozalaki mpe libandela lya mobulu ya bokengi Mali ekota na yango kino sika na badongolo meso.
ATT avandaka na kiti ya bokonzi mbala mibala, na 1991 kino 1992 mpe na 2002 kino 2012. Kasi alongolamaki na bokweyisami na basod.
Azalki soda ya kala kasi mingi na Mali bazali kotala lokola moto asukisaki bokonzi ya makasi to dictature na 1992….
Na Congo mibale (RDC mpe Congo-Brazzaville), bato baike batindi maloba ya kokanisa ye. Kati na bango Martin Fayulu, moko na bakambi ba Lamuka mpe mokonzi ya ECIDE, alobi ete ATT azalaki "panafricaniste ya monene mpe azalaki na makasi mpo na RDC".