M. Kimbuta asengi na baye ya Lamuka bayokana na mokonzi ya police ya Kinshasa mpo na kobongisa lolenge nini bokengi ekosalema.
"Martin Fayulu alingi amonisa polele ndenge nini Corneille Nangaa na Céni basalaki ye nko mpe bayibi ye elonga na maponami," eyebisi na VOA Lingala, moko na balobeli ya Lamuka, Joseph Mabanga.
Nous informons la population de Kinshasa de l’organisation d’un Grand Meeting en présence du Président élu Martin Fayulu accompagné de tous les leaders de #Lamuka le samedi 2 Février sur la place Sté Thérèse de N’Djili à partir de 11h. pic.twitter.com/rBC8doxHdV
— Coalition Lamuka (@coalitionlamuka) 26 January 2019
Lamuka ewangani mpe eboyi basango nyonso maye bazali kotambola na ba réseaux sociaux koloba ete meetingi ekosalame te.
"Soki baninga ya AR (Alternance pour la république) bakeyi kopesa maboko na Félix Tshisekedi ezali choix na bango. Kasi biso tozali kobunda mpo na ‘vérité des urnes’, " ebakisi M. Mbanga.
Mpo na ye, ezali démocratie.
Lire aussi : Fayulu amisakoli president mpe asengi na ba Congolais kondima Tshisekedi teM. Fayulu aboyi ba résultats ya Céni mpe ya Cour constitutionnelle maye masakolaki Félix Tshisekedi mokonzi na 38,57%. M. Fyulu azali komitala lokola "président légitime" mpe asengi bana ya Congo baboya kotosa bokonzi ya Tshsiekedi.