Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Botiayami na bokonzi ya Felix Tshsiekedi moko pusana mwa moke


Félix Tshiekedi, mokonzi ya mitano ya RDC, awa na Bruxelles, Belgique, 18 mai 2018.
Félix Tshiekedi, mokonzi ya mitano ya RDC, awa na Bruxelles, Belgique, 18 mai 2018.

Botiayami na bokonzi ya Felix Tshsiekedi moko pusana mwa moke, elobi baye ya nzinga nzinga na ye.

Mokonzi ya mboka ya mitano ya RDC akolapa nadayi mpe akopesama bilembo ya bokonzi liboso ya ba zuzi ya Cour suprême lokola mobeko likonzi ya ekolo esengi.

Milulu maye masengelaki kosalema o’mokolo ya le 22 janvier kasi nkasa ya bobengisi bato mazali naino kosalema mpe nde matinami lelo (o’mokolo mwa yambo ya mposo), Lydie Omanga, moko na balobeli ya lisanga CACH (Cap pour le changement).

Jean-Pierre Kambila, directeur ya cabinet ya mibale ya président Joseph Kabila, ye mpe alobi "mwa kotatabana mozali naino".

Baye ya nzinga nzinga ya Felix Tshisekedi balobi ekoki koselama tango mosusu le 26 janvier.

XS
SM
MD
LG