Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Willy Bakonga atikami na mikano mya ngolu ya Tshisekedi


Willy Bakonga, ministre ya kala ya Sports mpe ya kelasi ya nse, kati kati mpe professionel, le 21 avril 2008 à Kinshasa.
Willy Bakonga, ministre ya kala ya Sports mpe ya kelasi ya nse, kati kati mpe professionel, le 21 avril 2008 à Kinshasa.

Ministre ya kala ya kelasi ya nse, kati kati mpe professionnel, Willy Bakonga atikamaki lobi kolanda mokano ya ngolu ya president Félix Tshisekedi.

Basambeli ba ye balobi ete abimaki boloko bonene ya CPRK/ Makala, o;mokolo mwa mitnei.

M. Bakonga akangamaki na mwa na ye mpe akatelemaki mibu misato mya boloko nsima na kozwama na mpepo na libanda lya mpepo ya Maya Maya.

Azalaki kokende na Paris na misolo pene na nkoto ntuku misato ya ba dollars to 30.000.

M. Akangamaki ntango bolukiluki bozalaki kosalama na bofundami ya bongwisi misolo mya kelasi ya ofele mpe ya COVID-19 mpo na kosukola biteyelo.

XS
SM
MD
LG