Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington ezongisi etumbu likolo na Dan Gertler nsima na bolongoli Trump asalaki


Dan Gertler, homme d’affaires ya Israël, na Tel Aviv, 18 september 2000.
Dan Gertler, homme d’affaires ya Israël, na Tel Aviv, 18 september 2000.

Mbulamatari ya Joe Biden ezongisi etumbu likolo na hommes d’affaires Dan Gertler mwa mikolo nsima na bolongoli na yango na Donald Trump, mokonzi oyo atikaki ebongai le 20 janvier.

"Kopesa etumbu na Dan Gertler na 2017 ezalaki politiki malamu ya USA na ntango wana. Nasepeli komona yango kozongisama," ekomi mokambi ya Commission ya mambi ba bondeka na bikolo bya bapaya na Sénat ya Amerika, sétaneur ya Amerika Jim Risch, républicain ya état ya Idaho, na Twitter.

"Kaniaka nde likambo limemi bozongisami nsima mpe botiami pembeni ya bana ba RDC mpe USA esengeli kokoba kosalela makoki ma yango na ntina ya kosunga kosilisa yango," ebakisi sénateur Risch.

Mposmoko yambo na Donald Trump kolongwa na bokonzi, mbulamatari ya Amerika elongolaki etumbu ya moyi Israel Dan Gertler mpe epesaki ndigisa ye kosala lisusu mombongo to mosala na ye kino janvier 2022.

"Na Bozindo!" Washington elongoli etumbu likolo na Dan Gertler! Eyano ya Me Kapiamba
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:28:30 0:00

Mokano ya mbulamatari ya Donald Trump ememaki nungu nungu mingi ya ba ONG mpe bayi politiki mingi na mokili, koleka mingi mpenza ba démocrates.

Mobu moleki, Dan Gertler asakolaki ete fungolaki misala mya ye na bana ba RDC, na compagnie ebengami "Ya Biso" mpo ete bango mpe bakoka kotia misolo na kati.

Baike bafundaka ye na kosomba makoki ma Gecamines na ntalo ya nse mpenza na nzela ya nyongo mpe koteka yango na ntalo mingi mpe kokoba kosalela yango na mpo na ye moko.

Dan Gertler azalaka na boyokani malamu na mokonsi ya kala Joseph Kabila.

XS
SM
MD
LG