Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Volan Nyiragongo : Libanda lya mpepo ya Kavumu (Sud-Kivu) lifungolami


Basod na libanda lya mpepo ya Kavumu, pene na Bukavu, na Sud-Kivu, 3 septembre 1998
Basod na libanda lya mpepo ya Kavumu, pene na Bukavu, na Sud-Kivu, 3 septembre 1998

Libanda lya mpepo ya Kavumu pene na Bukavu (Sud-Kivu) lifungolami mposo misato nsima na bokangami mbala mibale nsima na botomboki bwa volcan Nyiragongo na Nord-Kivu.

Banganga mayele balobi likama lizali lisusu makasi te mpo na Kavumu kasi libanda lya mpepo ya Goma etikali nanu ya kokangama.

Ezalaki mingi mpo na boningani mabele mpe putulu molandaki

Ministre ya Transports Chérubin Okende Senga alobi na liyebisi ete makambo makomi malamu kolanda ba données to makambo mazwami na Kavumu mpe na botali ya bulletin spécial ya Toulouse.

"Likolo likomi malamu na Sud... Mapata ma putulu (ba nuages de cendres) ya volcan mazali nde kokende na sud," elimboli ministre Okende.

Mokano mwango mosakolami nsima na likita lya comité ya crise ekambamaki na Ministre wa Yambo, Jean-Michel Sama Lukonde.

XS
SM
MD
LG