Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi, Sassou, Kagame, Lourenço na bakonzi basusu ya Afrika na bokutani ya Stochi (Russie)


Président Félix Tshisekedi elongo na molongani wa ye Denis Naykeru na bokomi na bango na Sochi, Russie, 23 octobre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi elongo na molongani wa ye Denis Naykeru na bokomi na bango na Sochi, Russie, 23 octobre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshiskedi akomi na Sotchi na Russie na ntongo ya lelo epayi mokokani waye ya Congo-Brazzaville Denis Sassou N’Guesso akomaki o’mokolo mwa lobi.

Bakonzi ya bikolo bisusu ya Afrika lokola João Lourenço ya Angola, Paul Kagame ya Rwanda mpe basusu bazali.

Mobembo mwa bango na engumba eye ya libongo ezali mpo bokutani to sommet Russie Afrique.

Russie ezali kotala ndenge nini kokolisa boyokani na continent ya Afrika.

Bokutani bwango bokambami na président Vladimir Poutine ya Russie elongo na Abdel Fattah el-Sisi ya Egypte.

M. Tshisekedi akeyi na likita lyango na molongani mwa ye Denise Nyakeru.

XS
SM
MD
LG