Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi aniati makolo na Kigali


Mokonzi Felix Tshisekedi na bokmi na ye na Kigali, Rwanda, le 24 mars 2019. (Twitter/Government of Rwanda)
Mokonzi Felix Tshisekedi na bokmi na ye na Kigali, Rwanda, le 24 mars 2019. (Twitter/Government of Rwanda)

Mokonzi ya mboka, Félix Tshiskedi, akomi na mpokwa ya mokolo ya eyenga na Kigali, na Rwanda.

Kolonda gouvernement ya Rwanda, mwana mboka ya RDC, Tshisekedi, esengeli azala na bokutani ya Forum ya ba PDG ya Afrika (Africa CEO Forum).

Bokutani liye likosalama banda le 25 ti le 26 mars.

Akokutana mpe na mokani wa ye ya Rwanda, Paul Kagame.

M. Tshisekedi alongwaki na Kinshasa nsima na kozala na lisano ya ba éliminatoires ya CAN 2019 RDC-Liberia oyo ba Leopards ya Congo démocratique balongaki mpe "se qualifier" mpo na phase finale ya Caire, Egypte.

Mposo oyo esili, Rwanda na RDC ba tiyaki manzaka na boyakani mpo ete ba compagnies mpepo ya bikolo mibale (Rwand'Air na Congo Airways) bikendeke na mboka biye mibale.

XS
SM
MD
LG