Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mikolo 15 misusu mpo na campagne ya ba candidats députés ya Beni, Butembo mpe Yumbi


CENI epesi mikolo 15 na ba candidats députés ya Beni, Butembo mpy Yumbi mpo na campagne électorale mosusu
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:01:46 0:00

CENI epesi mikolo 15 na ba candidats députés ya Beni, Butembo mpy Yumbi mpo na campagne électorale mosusu

Mokambi ya CENI apesi ba candidats ya députation ya Beni, Butembo na Yumbi mikolo 15 mpo na kobandela campagne électorale, yambo na maponami maye makomi le 31 mars.

Maponami masalamaki te le 30 décembre na Yumbi, Beni mpe Butembo lokola bisika misusu nyonso na mboka ya RDC. Na Yumbi, mpo na bitumba kati na Batende mpe Banunu ; na etando ya Beni mpo na bokono ya Ebola moye mozali kongala kuna. Koleka bato 513 bakufi mpe 755 nde basimba na bokono ya Ebola endaki na août 2018.

"Bato babosana ba numéro ya candidats na bango. 15 jours ya campagne oyo CENI epesi bango ekosunga bango ko rappeler yango," elobi JeanBaptiste Itipo, directeur ya communication ya CENI.

Ba députés élus ya bisika biye basololaki mardi na Corneille Nangaa, mokambi ya CENI.

Bisika biye bikobimisa 15 députés nationaux baye bakobakisama mpo kokokisa 500 députés nationaux. Bisika biye bakopona mpe ba députés locaux baye bako pona ba Sénateurs, gouverneurs mpe vice-gouverneurs.

XS
SM
MD
LG