Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Egypte, Sudan na Ethiopie bayokani te na matata mpo na barrage Renaissance na Nil


Ba ministres ya Egypte, Ethiopie mpe Sudan na masolo mpo na matata ma barrage Renaissance etongami likolo na ebale ya Nil, Kinshasa, 6 avril 2021. (Panel RDC UA-Press)
Ba ministres ya Egypte, Ethiopie mpe Sudan na masolo mpo na matata ma barrage Renaissance etongami likolo na ebale ya Nil, Kinshasa, 6 avril 2021. (Panel RDC UA-Press)

Eyano ezwami te masolo kati na Egypte, Sudan mpe Ethiopie na matata mpo na barrage monene ya Renaissance na ebale ya Nil na Kinshasa.

Ba ministres ya mamabi ya bapaya ya bikolo biye bayokani ten sima na mikolo misato ya masolo na bokambami bwa président Félix Tshisekedi, mokambi ya Union africaine na Kisnahsa.

Batondi president Tshisekedi mpo na masolo mango kasi balobi tes oki bakokoka kosolola mokolo nini.

"Ethiopie ezali kotia na likama bavandi banso ya bassin ya Nil mpe mingi mingi Sudan, elobi na bapanzi sango ministre ya Sudan ya mambi ya bapaya," Mariam Al Mansoura Elsadig Almahdi.

"Tozali kolikya ete bwanya ya président Tshisekedi ekosunga kosukisa kosukisa masolo mpo na matata maye masilaka te esika wapi Ethiopie emami bato na libaku na lolenge lozali kotabombola likolo na sembo ya molongo mpe boyokani na mboka nzinga nzinga," ebakisi Mme Al Mansoura.

Ethiopie etongi barrage yango nan tina ya kopesa lotiliki na bavandi na yango million nkama moko na tuku sambo mpe mboka esusu kasi Egypte ekebisi ete yango ekopekisa kozwa mayi mpe elobaki ezali likambo lya bomoi.

Ebale Nil ezali esika Egypte, mboka esobe, ezwaka mayi mpo na bilanga mpe ya komela. Sudan elobi ete botongi ya barrage Renaissance bokopekisa ba barrages na yango kozwa mayi masengeli.

XS
SM
MD
LG