Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi alaki kobimisa ba prisonniers politiques na kati ya mikolo zomi


Président Félix Tshisekedi azali kosakola linaka ya ye mikolo nkama, na Echangeur ya Limete, Kinshasa, RDC, 2 mars 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi azali kosakola linaka ya ye mikolo nkama, na Echangeur ya Limete, Kinshasa, RDC, 2 mars 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Mokonzi ya sika ya Congo démocratique alaki kosala ngolu na ba prisonniers politiques kati na mikolo zomi makoya, mpe kosala mpo na bozongi na lobango ya ba exilés.

Félix Tshisekedi alobi yango ntango asakoli linaka na ye ya mikolo nkama samedi na etando ya Echangeur ya Limete na Kinshasa.

Ayebisi ete kokitisa mitema ya bato (décrispation) yango nde ekozala eloko ya yambo na linaka na ye.

Ministre ya mambi ya bosembo asili azuwi mitindo mpo na yango, kolanda maloba ya M. Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG