Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Gouvernement ekondisami


Félix Tshisekedi, président ya RDC na Addis Abeba, Ethiopie, 11 février 2019. (Facebook/Fatshi News)
Félix Tshisekedi, président ya RDC na Addis Abeba, Ethiopie, 11 février 2019. (Facebook/Fatshi News)

Bakonzi ya RDC basangisi ba postes ministériels bayike mpe bakitisi motango na yango nsima ya botiki libonga ya ba ministre bayike. Kasi gouvernement ya sika esalami te.

Kolanda mokanda etiyami maboko na secrétaire général ya gouvernement, Xavier Bonane, mabonga 11 ya gouvernement esangisami. Yango esali ete ba ministres batikali 23 na esika ya 35 lokola ezalaki.

Likambo liye lilandi mokano ya Conseil d’Etat liye lipekisi ba responsables politiques "cumul ya ba fonctions" exécutives et législatives.

Ba ministres bayike bakeyi na parlement mpo baponamaki lokola ba députés.

Kati na bango, Lambert Mende ya Communication mpe molobeli ya gouvernement. Libonga na ye esangisami na ya Droits humains (makoki ya bomoto) liye lisimbami na Marie-Ange Mushobekwa.

Nzokande Ministre ya mambi ya Sembo Alexis Ntambwe Mwamba, ye akotala mpe mambi ya Bapaya. Mpe libonga ya Défense esangisami na ya Fonction publique.

Kasi gouvernement ya sika esalami naino te nsima na sanza moko na mikolo mwambe président Félix Tshisekedi asi asali na bokonzi.

XS
SM
MD
LG