Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Stade des martyrs ebongi nanu te mpo na ba matches ya qualitifaction ya Mondial (CAF)


Mohamed Ibrahim (C) , milieu de terrain ya Zamalek ya Egypte azali kobeta drum ma match na V.Club ma stade des Martyrs, Kinshasa, 5 avril 2013.
Mohamed Ibrahim (C) , milieu de terrain ya Zamalek ya Egypte azali kobeta drum ma match na V.Club ma stade des Martyrs, Kinshasa, 5 avril 2013.

CAF (Confédération africaine de footb epesi nzela te ete ba matches ya qualifications ya mondiale ya Qatar 2022 ebetama na Stade des martyrs.

CAF elobi misala mya bobongisi Statde eye misengeli misila malamu.

"Tomoni ete bopusami ya misala ya stade (des Martyrs) bozali nanu kosalama mpo na kokoma na esika esengeli na ntina ya kopesa bolamu na basani, ba officilesi mpe ba suporters," ekomi CAF na mokanda etindeli FECOFA (Fédération congolaise ya football association).

Na mokano na yango, CAF epekisi FECOFA kobetisa ba matches ya qualification ya mondial ya Fifa Qatar 2022 mpo na ba journées ya misato na minei na stade des Martyrs.

CAF epesi FECOFA kino le 22 septembre kopona stade mosusu mpo na ba matches yango.

Mokano ya CAF mozwamaki nsima na botindami ya inspecteurs ya CAF na stade ya Martyrs baye bazwaki ba photos mpe bililingi.

Batindami ya CAF bakoya kotala soki ba matches ekoki kobetama na novembre.

XS
SM
MD
LG