Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CAF eboyi bosenga ya FECOFA mpo etali Guelor Kanga


Equipe nationale ya Gabon na éliminatoires ya Coupe du monde, na stade Mohammed, Casablance, Maroc. 7 octobre 2017.
Equipe nationale ya Gabon na éliminatoires ya Coupe du monde, na stade Mohammed, Casablance, Maroc. 7 octobre 2017.

Confédération africaine ya football (CAF) ebwakisi bofundi ya Fédération congolaise ya football association (FECOFA) mpo Gabon ebetisaki mosani Guelor Kanga.

CAF ekomi ete bilembo FECOFA ememaki bikoki te.

FECOFA efundaki Fédération gabonaise ya football na kobetisa mosani Guelo Kanga na nkombo mosusu, na mokolo ya mbota mosusu mpe na koloba ete abotama na Gabon.

Na mikanda FECOFA emamki, Guelor abotama na Kinshasa na 1986 mpe abetaki na ba clubs mingi na Kinshasa yambo. Mama na ye akufaki na 1986.

Kasi na mikanda mya Fédération ya Gabon, mosani oyo ayebanaki na RDC na nkombo ya Kiaku Kiaku Kingani abotamaki nde na Oyen na 1990.

FECOFA ezali kotuna ndenge nini mama na ye oyo akufakuki na 1986 akomaki na na Gabon na 1990 mpo abota ye.

FECOFA ezalaki kosela CAF ekata likambo mpo ba Léopards baye balongwaki na nsima na ba élinitoires ya Coupe d’Afrique Cameroun 2021 bakoki kozonga soki Gabon ekweyisamaki.

XS
SM
MD
LG