Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Simaro Lutumba awei


Alanga nzembo Simaro Lutmba na mokonzi ya mboka Joseph Kabila, na Palais de la nation, Kinshasa, 2018. (Présidence RDC)
Alanga nzembo Simaro Lutmba na mokonzi ya mboka Joseph Kabila, na Palais de la nation, Kinshasa, 2018. (Présidence RDC)

Alanga nzembo Lutumba Ndomanueno Simaro Masiya azongisi molimo epayi ya Nkolo o’mokolo ya mposo na Paris, na ekolo France, eyebisi baye nzinganzinga na ye.

Mobeti lindanda mpe mosali nzembo monene oyo, azalaki na 81 ans, akufi na 3 heures ya ntongo nsima ya 63 ans ya mosala ya mindule, kolanda maloba ya manager wa ye Willy Tafar.

Mokonzi ya ekolo RDC ya kala, Joseph Kabila, apesi ye lotkumu.


"Simaro Lutumba, moto na ntoki (artiste) na boyebi oyo bato bazalaka na yango mingi te, atiki bilembo na ntango na ye. Na lendisi libota na ye mpe lisanga ya bato na ntoki nyonso na mboka na biso mpe na molongo mobima," ekomi M. Kabila na compte Twitter ya lingomba FCC (Front commun pour le Congo).

Abetaki miziki mingi na Franco Luambo Makiadi na OK Jazz. Kasi akeli ya lingomba na baninga basusu, Bana OK, nsima ya kosuana na libota ya nkondo Luambo Makiadi mibu mike nsima ya liwa ya mokolo OK Jazz.

Akobaki na kokamba Bana OK mpe kosala banzembo.

Na 2018, asakoli ete atikeli lingomba ya Bana OK na Manda Chante, moko ya bilenge ya Wenge Musica ya kala mpe mokambi ya Wenge Reference.

Kasi, Simaro Lutumba alobaki akokoba ka sala banzembo ata amoni ete akokosi wa ye mosala awa na nse.

Asengaki mbala nzike bato na bomoi bayebaka kopesa losako mpe longonya na baninga na bango ntango bango bazali naino na bomoi.

Baselaki ye monument moko.

Banzembo na ye mingi bitonda na bwanya mpe toil na commune ya Lingwala epayi wapi azalaki kovanda.

XS
SM
MD
LG