Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou andimami candidat ya PCT mpo na présidentielle ya 2021


Président Denis Sassou Nguesso na Paris, France, 3 septembre 2019.
Président Denis Sassou Nguesso na Paris, France, 3 septembre 2019.

Président Denis Sassou N’Guesso aponami mpe andimami mpo na kozala candidat na ya PCT (Parti congolais du travail) na maponami ya mokonzi ya mboka ya 2021 na Congo-Brazzaville, na Congrès ordinaire ya mitano ya lisanga liye na Brazzaville.

"Bato 2.588 bazalaki na Congrès bandimi bango banso ete camarade Denis Sassou N’Guesso azonga na bokambi ya comité central ya lingomba mpe azala candidat na biso na maponami ya mokonzi ya mboka na 2021," elobi Pierre Ngolo, kalaka mokonzi ya PCT oyo atiki ebonga na ye na Pierre Moussa.

M. Sassou azali na mibu tuku sambo na mitano, azali kokamba Congo-Brazzaville uto mibu tuku misato na mitano.

"Tokanisi ete tokoki te kotika Denis Sassou N’Guesso. Esengelakii kaka kopona ye. Ezali mpo na mbongwana kati na maye mazali kokobai, ezali mpo na kimya mpe boboto na mboka," eyebisi na AFP Léonidas Mottom, questeur molandi na Assemblée nationale mpo na PCT.

Buku likonzi epesi M. Sassou nzela ya kopesa lisusu nkombo na ye na maponami ya 2021 mpe mpo na mbala ya suka, na 2026.

UPADS (Union panafricaine pour la démocratie sociale), lingomba monene ya opposition, esengaki jeudi ete maponami mapusana na 2023 mpe M. Sassou azala te.

XS
SM
MD
LG