Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pierre Moussa aponami SG ya PCT


Président Denis Sassou N'Guesso o'kati ya bayi PCT (Parti congolais du Travail) na ekeko ya mokonzi ya kala Marien Ngouabi na Brazzaville, Congo-Brazzaville, 11 décembre 2019. (Thierry Moungalla)
Président Denis Sassou N'Guesso o'kati ya bayi PCT (Parti congolais du Travail) na ekeko ya mokonzi ya kala Marien Ngouabi na Brazzaville, Congo-Brazzaville, 11 décembre 2019. (Thierry Moungalla)

Pierre Moussa nde aponami lokola kalaka monkonzi ya PCT (Parti congolais du travail) ya président Denis Sassou N’Guesso na Congrès ya mitano ya lisanga eye na Congo-Brazzaville.

Boponami na ye bosalami nsima mikolo misatu ya Congrès ordinaire ya mitano ya PCT na Kintélé na Congo-Brazzaville.

Mpo na Thierry Moungalla, molobeli ya mbulamatari ya ekolo Congo-Brazzaville, Pierre Moussa azali moto asi asala mosala na mboka eye mpe akoki komema PCT na bomoko.

Pierre Moussa akitani na Pierre Ngolo.

Congrès ya mitano eye esalami ntango maponami ya mokonzi ya mboka masengeli kosalama na 2021.

Nzokande mpo na mibu tuku mitano ya bokelami ya PCT, président Sassou N’Guesso na baye ya lingomba liye batikaki fololo na ekeko ya mokonzi ya kala Marien Ngouabi.

XS
SM
MD
LG