Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Parquet ezongisi passeport mpe $30.000 ya DG ya Access Bank eye APLC ezwaki


Ba avocats na Kinshasa, le 27 novembre 2012.
Ba avocats na Kinshasa, le 27 novembre 2012.

Passeport mpe $30.000 ya DG ya Access ezongisami ena mokano ya Procureur général, elobi banque eye na liyebisi, kati na nungu nungu etali bosukoli misolo mpe botindi yango na badongolomeso. Samedi, mokambi ya APLC oyo basali baye bazwaki misolo miye, atikamaki na bongami na likambo lyango.

Access Bank ellobi ete mokambi na yango ayonoli mbala mingi na mituna ya bayi bosembo mpo na likambo ya kosokola misolo (blanchiment d’argent) mpe kotinda yango na badongoleso eye afundamaki na yango.

"Mpo etali bolukiluki bozali kosalema likolo na nungu nungu etali kosokola misolo, banque endimaki kosala na bosolo manso bureau ya Procureur général esengaki mpe epesaki mikanda minso mpo na kolakisa ete eyebi likambo te mpe etosaka na molende maye Banque centrale ya Congo esengaka na ko bokongola misolo," ekomi Acces Bank na liyebisi.

$30.000 yango ezongisamaki lundi le 21 décembre, elobi Access Bank. Basali ba APLC, agence présidence Félix Tshisekedi akelaki na koluka kosilisa kaniaka, bazwaki yango mposo moleki ntango bazalaki kosala enketi mpo na kaniaka.


Samedi, mokambi ya APLC (Agence ya kopekisa mpe kobundisa kanika), Ghislain Kikangala atikamaki nsima na kongama vendredi mpo na lolenge bayi misala miye bazwaki misolo miye na passport ya DG ya Access Bank, Arinze Kenechukwu Oswachale, na enketi bazalaki kosala.

Nungu nungu ebimaki mingi nsima na bililingi ya bozwi misolo miye mipanzanaki na ba réseaux sociaux.

Mokambi ya APLC alobaki ete misolo myango mitindamaki na parquet mpe basali na agence eye basalaki kaka mosala na bango.

XS
SM
MD
LG