Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bolukiluki bozali kosalama na misolo Access Bank epesaki na basali ya APLC (Direcab a.i. ya Tshisekedi)


Désiré-Cashmir Eberande Kolongele akosala na ebonga ya directeur ya cabindet ya président Félix Tshisekedi na esika ya Vital Kamerhe, Kinshasa, 5 mai 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Désiré-Cashmir Eberande Kolongele akosala na ebonga ya directeur ya cabindet ya président Félix Tshisekedi na esika ya Vital Kamerhe, Kinshasa, 5 mai 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Directeur de cabinet a.i. ya président Félix Tshisekedi asakoli ete bolukiluki bozali kosalama mpo na misolo basali ba APLC (Agence ya kopekisa mpe kobundisa kaniaka) bazwaki na Access Bank.

Bakambi ba Misala mya kopekisa mpe kobundisa kaniaka, babengisami vendredi 18 décembre 2020 na Cour d’appel ya Kinshasa mpo na misolo basali ya APLC bazwaki na enketi bazalaki kosala na Access Bank.

Agence ya bitumba na kaniaka epamelami mpo na kozwa misolo na ndenge esengeli te
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:00:36 0:00

"Bolukiluki bozali kosalama na ngonga eye na ntina ya koyeba polele makambo masalamaki, soki mazali solo, masengeli kokitisama o’likambo mpe bakeli ba yango kopesama etumba kolanda mobeko," ekomi na mokanda, mokambi ya ndako ya mosala ya ngonga eye ya ndako ya mosala ya président Félix Tshisekedi, Désiré-Cashmir Kolongele Eberande.

Liyebisi lya présidence libimisami nsima na bobanzani na ba réseaux sociaux ya bililingi bitalisi basali ba APLC kozwa nkasa ya misolo na maboko ya mokambi ya Access Bank, Arinze Kenechukwu Oswachale, na avocat na ye, Amani Cibambo.

Basali ba APLC baye bakendaki kosala enketi nsima na bofundami ya mokambi ya Access Bank na blanchiment d’argent (kosukola misolo) mpe kotinda yango na badongolomeso (terroristes).

Basali baye bazwaki 30.000 $ na passeport ya M. Arinze Kenechukwu Oswachale. 20.000 $ esengelaki ebakisama nsima.

Nungu nungu makasi ebimaki mpo na likambo lya na mangomba ya société civile malanda bitumba na kaniaka.

APLC ebimisaki mercredi liyebisi ya koloba ete misolo myango mitikamaki na parquet ya Cour d’Appel ya Gombe mpe nungu nungu eye ekokaki te kopekisa bolukiluki bokoba.

"Ata basali baye bazalaki kosala bolukiluki, epesameli bango te kozwa misolo mingi boye. Esengeli etumbu epesama," elobaki na VOA Lingala mokambi ya UNIS, réseau panafricain ya bitumba na kaniaka, Jean-Jacques Lumumba.

"Présidence ya Ekolo ezali kokundola molende ya mokonzi ya mboka na bitumba na kaniaka mpe na blanchiment d’argent (kolekisa misolo mabe na nzela elamu) yango ezali loboko ya bitumba na ye ya politiki," ekomi M. Eberande.

APLC ezali agence président Félix Tshisekedi akelalaki mpe ekangama na présidence mpo na kobundisa kaniaka.

XS
SM
MD
LG