Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Lingomba Etat islamique endimi attaques mibale na Beni


Ba soda ya Tanzanie ya Monusco na Beni, Nord-Kivu, 13 novembre 2018.
Ba soda ya Tanzanie ya Monusco na Beni, Nord-Kivu, 13 novembre 2018.

Lingomba Etat islamique elobi ete esalaki bitumba mbala mibale o’mokolo ya jeudi na territoire ya Beni esika wapi bato pene na zomi bakufi, kolanda maloba ya bavandi.

Baye bavandi na mboka Samboko-Tchanitchani balobi ete babundi bapunzaki mpe bazikisaki centre ya lisali mpo na bokolongono mpe bayibaki biloko kati na ndako ya bayike.

"Pene na bato zomi bamemamaki na makasi na baye bayaki kobundisa bisika biye," elobi Donat Kibwana, mokambi ya etando ya Beni.

Na Beni, bitumba bisalamaka mingi na ba ADF, babundi ya ba musulmans bawuta Ouganda banda mibu 20.

"Basoda ya Califat basalaki bitumba na bivandelo ya mampinga ya Congo (démocratique) na mboka Chianichiani na Beni... Yango ememaki na koboma ba soda (ya FARDC) mpe kozokisa bayike ntango basusu bakimaki," elobi mayebisi mabale ya lingomba Etat islamique maye mabimisamaki na SITE Intelligence group eye emesana kosakola sango ya ba terroristes islamiques (badongola miso ya ba musulmans).

Mayebisi maye malobi "ba soda ya Califat basalelaki bibundeli (armes automatiques) mpo na kobeta masasi na mampinga (ya Congo) na mboka Kumbwa, na Kamango".

Mampinga ya FARDC balobi naino likambo moko te mpo na bitumba biye.

Kasi bilenge ya LUCHA, lingomba ya kosenga démocratie, batambolaki jeudi na Beni mpo na kotelemela biutmba biye.

Lingoma Etat islamique endimaki mbala wa yambo bintumba na mabele ya Congo démocratique le 16 avril. Elobaki ebomaki bato basoda mibale na Kamango, pene na ndelo na Ouganda.

XS
SM
MD
LG