Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nord Kivu: Bato sambo babomami na ba dongolo miso ya lingomba ADF na Beni


Ba soda ya mampinga ma RDC (FARDC) na mboka Manzalaho, pene na Beni, Nord-Kivu, RDC, 18 février 2020.
Ba soda ya mampinga ma RDC (FARDC) na mboka Manzalaho, pene na Beni, Nord-Kivu, RDC, 18 février 2020.

Basimba minduki ya ba ADF bafundami na koboma bato motoba na chefferie ya Bushu na territoire ya Beni, na province ya Nord-Kivu, elobi Roger Mumbere Wangeve president ya société civile ya mboka eye.

Na kati ya bato bakufi, ezali na mibali mitano na mwasi moko, mpe bato misato bazoki makasi.

M. Wangeve abakisi lisusu ete bato baye bakufi ata ko bayi FARDC, mampinga ma Ekolo Congo démocratique, bazali nzinga nzinga mpe bakokaki kobikisa bango te.

ONG Human rights watch elobi ete wuto état de siège ebandaki na ba provinces ya Nord-Kivu mpe Ituri, sanza minei mileki, bato koleka 750 babomami na Est ya Republique democratique ya Congo.

Na kati na bango, bato 672 babomami na basimba minduki mpe 67 babomami na bayi mampinga to mpe force ya sécurité ya mbulamatari.

Mangomba koleka nkama ya basimba minduki bayike bazali kosala mobulu na Est ya RDC, kasi bayi lingomba ADF nde bayebani lokola baye bazali koboma bato koleka.

XS
SM
MD
LG