Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pascal Mukuna atindami na Makala


Pascal Mukuna, episkopo ya Assemblée chrétienne de Kinshasa (ACK), Kinshasa, RDC, 20 mai 2016. (Facebook/Pascal Mukuna)
Pascal Mukuna, episkopo ya Assemblée chrétienne de Kinshasa (ACK), Kinshasa, RDC, 20 mai 2016. (Facebook/Pascal Mukuna)

Pascal Mukuna, episkopo mpe motambwisi ya eyamba ACK mpe mokambi ya misala mibengami Eveil patriotique, atiayami na bokongami to mandat provisoire nsima na koyanola na parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa/Gombe mpo na kofundama na mwasi moko na kozwa ye na makasi. Atindami na boloko ya Makala.

Atelamaki liboso na bazuzi pene na ngonga sambo elongo na Mamie Tshibola, mwasi oyo afundi ye mpe lisusu na kobotola mikanda ya ndaku.

Mme Tshibola alakisa na motuka ya episkopo Mukuna esika nini abombaka minduki miye asalelaki mpo na kobangisa ye yambo na kozwa ye na makasi.

Tokanisi ete bayi ya lingomba politiki nde bazali nan sima na makambo maye mpo na kopekisa misala mya Eveil patritique… Kasi tokokoba yango, eyebisakai na VOA Lingala vice-président ya Eveil patriotique, Me Jean-Claude Katende.

Mwa ngonga yambo na yango, bayi libota linene ya Laurent-Désiré batikaki mokanda mosusu na parquet mpo na kofunda Pascal Mukuna mpo alabaki ayebi moto abomaki mokonzi oyo ya kala ya RDC.

XS
SM
MD
LG