Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mugabe akundami


, Grace Mugabe, pene na sanduku ya nkondo molongani ya nkondo Robert Mugabe, mokonzi ya kala ya Zimbabwe, yambo ya bokundami ya mowei na Kutama, 28 septembre 2019.
, Grace Mugabe, pene na sanduku ya nkondo molongani ya nkondo Robert Mugabe, mokonzi ya kala ya Zimbabwe, yambo ya bokundami ya mowei na Kutama, 28 septembre 2019.

Robert Mugabe, mokonzi ya kala Zimbabwe akundami o’mokolo ya mposo na mboka ya mbotama na ye, Kutama, na nord ya mboka na ye.

Milulu ya botiyami ya nzoto ya Mugabe misalami mikolo tuku mibale na mibale nsima na liwa na ye na ekolo Singampour epayi wapi akendaki mpo na lisalisi ya nzoto.

Robert Mugabe awaki le 5 septembre na mibu 95.

Milulu myango misalamaki na miso ya molongani ya mowei, Grace Mugabe, elongo na baye libota mpe nkama na bato.

Nkondo Mugabe akotaki na bokonzi na 1980 nsima na lipanda ya Zimbabwe. Atikalaki na kiti ya bokambi mibu 37 yambo bamolongola na mampinga nsima na mobulu ya bana mboka.

President Emmerson Mnangagwa, oyo zalaki vice-president ya Mugabe, azwaki eski na ye nsima na maponami. M. Mnangagwa asakolaki ete mowei "elombe ya mboka".

Bayike na Afrika bapesaki M. Mugabe limemya mpo na bitumba bya ye mpo na bonsomi ya continent kasi ba noko ya kala balobi ete M. Mugabe abepisaki mboka na ye.

Mugabe, na boknzi na ye, abotolaki mabele ya malona na mindele mpe apesaki yango na bayindo.

XS
SM
MD
LG