Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mugabe awei na mibu 95


Robert Mugabe mokonzi ya kala ya Zimbabwe akufi, photo ya le 29 juillet 2018.
Robert Mugabe mokonzi ya kala ya Zimbabwe akufi, photo ya le 29 juillet 2018.

Robert Mugabe mokonzi ya kala ya Zimbabwe awei lelo na mboka na mibu 95 ya bomoi.

Akambaki ekolo Zimbabwe, Rodhésie ya kala, mibu tuku misatu na sambo banda lipanda na yango na 1980.

Akweyisamaki na bakonzi na mampinga nsima na botelemeli ya bana ya ekolo na ye mikolo mingi.

Ekolo na ye ekotaki na nkwokoso makasi nsima na mwa mibu ya kofulukisama.

Aboyaki bokonzi ya bayi ya West.

Abotolaki mabele na mindele na mboka na ye mpo na kopesa yango na maboko ya bayindo.

Atikaki bonkonzi na 2017 nsima na mobulu mobimaki ntango alongolaki vice-président na ye Emmerson Mnagangwa na bontindi ya molongani waye Grace oyo amitiyaki mpe kati nab aye bokaki kokitana na ye.

Mnagangwa nde akitanaki na ye mpe atikali na bokonzi nsima na kolonga maponami.

Bayike na bikolo ya Afrika Batali Mugabe lokola moko na bilembo ya nitumba mpo na lipanda ya ekolo na ye mpe ya Afrika.

Kasi bayi ya West lokola ya Angele balobi ete Mugabe nde azindisaki mboka mpe bana ya ekolo na ye na mpasi.

XS
SM
MD
LG