Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moyi Jordanie afundami kozala molakisi bitumba na ba islamiste ya ba ADF ajangami na Beni


Basoda ya ba FARC na motuka na parc national ya Virunga, na Mutwanga, na Nord-Kivu, 24 mai 2021.
Basoda ya ba FARC na motuka na parc national ya Virunga, na Mutwanga, na Nord-Kivu, 24 mai 2021.

Moyi ekolo Jordanie moko afundami kozala molakisi bitunda na badongolomeso ya lingomba y aba Islamiste ADF akangami na Beni, na Nord-Kivu, elobi bakonzi ba Ekolo Congo démocratique.

Molobeli ya mbulamatari Patrick Muyaya oyo azali awa na New York na likita lya linene lya ONU ayebisi VOA Lingala ete moto yango akangamaki o'mokolo mwa mposo pene na Semiliki mpe atindami na Kinshasa na bokangami mpo na bolukiluki ya bozindo.

Moto yango azwamaki na mokanda ya bovandi ya ekolo Kosovo mpe ayebani lokola mobali ya mibu tuku minei ya mboka Arabie Saudite.

Lingomba ya badongolomeso ya ba ADF likotisama na lingomba état islamique.

Ezalaki o'libandela lisanga lya batomboki ya Ouganda mpe esalaka bobomi mingi na moneyele ya RDC.

XS
SM
MD
LG