Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden amonisami kozala molongi


FILE - Democratic presidential candidate former Vice President Joe Biden speaks to supporters in Wilmington, Delaware, Nov. 4, 2020.
FILE - Democratic presidential candidate former Vice President Joe Biden speaks to supporters in Wilmington, Delaware, Nov. 4, 2020.

Vice-président ya kala ya USA Joe Biden, moto ya kala na politiki wuto pene na ndambo na ekeke, amonisami kozala molongi ya ebonga ya mokonzi ya mboka , kolapa ndayi le 20 janvier mpe kokoma mokambi ya mokolo koleka mboka ezwa nanu te.

Etat ya Arizona nde ekati makambo. Bilembo bya bipesami na bosangisami ba media basalaka.

VOA mpe ebengaki ba états mpe esangisaki bilembo.,

M. Biden akomi na 49,9% na Arizona ntango M. Tump, mokonzi ya kala azali na 48,9%.

Kasi M. Trump akebisaki vendredi na mpokwa Biden kosalako ete alongi mpo bitumba ya bazuzi nde ebandi.

Na mibu 78, M. Biden azali moto asala politiki wuto kala.

M. Biden akokoma 46e président ya Etats-Unis nsima na Donald Trump.

Kasi yambo esengeli alapa ndayi le 20 janvier.

Azalaki vice-président ya Barack Obama, démocrate lokola ye, na mandats mibale wuto 2000-2004 mpe 2004-2016.

M. Bidein asala mibu 36 na Séante ya Amerika.

Collège ya baponi banene ezalaka na baponi 538.

M. Biden akozala na mibu 78 o’mokolo na bolapi ndayi. Asi ameka mbala misato misusu maponami ma mokozni ya mboka nsima parti na ye ya ba démocrates kobona ye, na 1988, 2008 mpe na mpe mobu moye.

XS
SM
MD
LG