Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mibu 20 ya misala makasi mikatelami na Inspecteur général ya ESPT mpe na mokambi ya SECOPE


Ba policiers mpe basoda bazali kokengele bokoti na boloko ya Makala, na Kinshasa, 2 juillet 2013.
Ba policiers mpe basoda bazali kokengele bokoti na boloko ya Makala, na Kinshasa, 2 juillet 2013.

Mibu 20 mya misala makasi nde etumbu Cour pénale ya Kinshasa/Gombe ekatali Inspecteur général ya ESPT (Enseignement primaire, secondaire mpe technique), Michel Djamba mpe na mokambi ya SECOPE (Service ya contrôle mpe ya kofuta balakisi), Delphin Delon Kampay mpo na kobengwisa misolo mya l'Etat.

M. Djamba akweyaki makalekale na bosakoli bwa etumbu yango jeudi na boloko bonene ya Makala CPRK epayi wapi bazalaki kosamba wuto libandela.

Bato baye babale basambi nsima na IGF (Insepction general ya Finances) koloba na rapport ebimisaki le 18 novembre 2020 ete M. Kampay apengwisaki 13 milliards ya ba francs congolais mpe M. Djamba, koleka 650 millions ya FC.

Bafundamaki mpe na kokotisa bana bake 7.000 na mosala, 8.000 ya bakolo baleki mibu 60 mpe 34.000 ya basali bazalaka te, mpe kosala mikano mya lokuta ya bokeli biteyelo bya l’Etat bya lokuta.

Bato babale baye bapekisami makoki ma politiki mbula mitano nsima na kobima na boloko mpe bakoki lisusu te kozonga na Fonctioin publique.

Basambeli ba bango bakosenga bozongeli bosambisami.

XS
SM
MD
LG