Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Me Liyolo akufi


Artiste plasticien, sculpteur (mosali bikeko) mpe moyemi, Me Alfred Liyolo Limbe Mpuanga, na esik ya mosala na ye, Kinshasa, 1er octobre 2015. (Facebook/Maître Liyolo)
Artiste plasticien, sculpteur (mosali bikeko) mpe moyemi, Me Alfred Liyolo Limbe Mpuanga, na esik ya mosala na ye, Kinshasa, 1er octobre 2015. (Facebook/Maître Liyolo)

Artiste plasticien mpe sculpteur (mosali bikeko) Alfred Liyolo Limbe Mpuanga aweyi o’mokolo na lundi mboka Autriche.

Moto na ntoki (Artiste) monene liye ya mboka RDC azalaki na 75 ans.

Moninga na ye, alanga Jeannot Bobenga, ayebisi sango liye na VOA Lingala.

Ndako ya Me Liyolo ezalaka pene na oyo ya M. Bobenga mpe basalaki bango mibale lokola ba administrateurs ya SOCODA, Société congolaise ya droits d’auters.

"Libota lya ye ezali kolela. Tozali na bango elongo. Natikali makanisi ya bomoto mpe lolenge ya kobika ya Me Liyolo," elobi alanga nzembo Bobenga.

Me Liyoyo ayebani mokili mobimba mpo na misala na ye ntoki, ba tableaux ya peintures mpe sculptures maye matekama ntalo.

Atiki bilembo minene na RDC. Kati yango, monument ya maboko ya place des artistes na Victoire na Kinshasa, monument ya kimiya na boulevard Triomphale pene na Palais du Peuple mpe monument ya place ya Mandela na boulevard du 30 juin.

XS
SM
MD
LG