Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Lugi Gizenga akufi


Lugi Gizenga, mwana ya Antoine Gizenga mpe mokambi ya PALU, na Kinshasa, RDC, 5 septembre 2016. (Facebook/PALU)
Lugi Gizenga, mwana ya Antoine Gizenga mpe mokambi ya PALU, na Kinshasa, RDC, 5 septembre 2016. (Facebook/PALU)

Lugi Gizenga, secrétaire permanent ya PALU, parti lumumbiste Unifié, mpe mwana ya nkondo Antoine Gizenga, akufi lundi na butu na Clinique Ngaliema na Kinshasa.

Azalaki na mibu tuku mitano na minei akufi na mbalakaka nsima na komema na lopitalo.

Akitanaki na tata na ye Antoine Gizenga na bokambi lingomba Palu. Antoine Gizenga ministre ya kala mpe Premier ministre na bokonzi ya Joseph Kabila awaki mobu moleki.

Bato baiike batindi maloba mwa bobondi mitema na libota lya mpe ya kokanisa Lugi bomemi.

Mpo na FCC, Front commun pour le Congo, libota lya politiiki lya mokonzi ya kala Joseph Kabila, "Lugi Gizenga azalaki moto na mpiko mpe ya sembo mpo Kabila".

Lugi Gizenga azalaki mwana ya yambo ya bana basato ya Antoine Gizenga.

XS
SM
MD
LG