Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Lokua Kanza aponami bo' ambassadeur national ya Unicef


Alanga nzembo Lokua kanza na concert ya Femua music Festival na Abidjan, Côte d'Ivoire 22, Avril 2018
Alanga nzembo Lokua kanza na concert ya Femua music Festival na Abidjan, Côte d'Ivoire 22, Avril 2018

Alanga nzembo Lokua Kanza aponami bo' ambassadeur national ya Unicef mpo na ekolo Congo Démocratique (RDC) o'mokolo mwa misato le 8 Septembre na Kinshasa.

Na mosala na ye bo' ambassadeur ya Unicef, akosala ete misala mya mabongisi maye ma ONU mpo na bana ba ekolo Congo Democrtique mimonana, mpe akosala makasi mpo ete bana ba ekolo eye bazua maye basengeli na yango mpo na kokola na bango malamu.

Lokola mpe ayebana na mokili mobimba, akosala mpe makasi kolobela mpasi ya bana ya RDC bazali komona mpo na koluka lisungi.

Na maloba ma ye, Lokua Kanza asakoli ete ayebi malamu mpasi ya bana yba RDC mpo ye moko amona yango, mpe akosala manso maye akoki mpo ete bana ba Congo banso bakenda kelasi koyekola na ndenge elongobani na kimya mpe na bobatelami.

Na RDC, pene na bana millions 4 ya mibu motoba kino mibu zomi na moko bazali kokende kelasi te, elobi Unicef, ata ko kelasi ya nse ezali ya ofele..

XS
SM
MD
LG