Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bayi Bundu dia Mayalan babale mpe 2 policiers bakufi na bitumba na Kisantu


Basali ya bokengi bazali koluka luka pene na bokolo ya Makala epayi wapi Ne Muanda Nsemi, Bundu dia Mayala akimaki, Kinshasa, 17 mai 2017.
Basali ya bokengi bazali koluka luka pene na bokolo ya Makala epayi wapi Ne Muanda Nsemi, Bundu dia Mayala akimaki, Kinshasa, 17 mai 2017.

Bayi Bundu dia Mayala babale mpe ba policiers babale bakufi na bitumba na Kisantu na territoire ya Mandimba na etuka ya Kongo-Central.

Mokambi ya territoire, Louis Mbimba Luzolo, ayebisi ete balandi ba Bundu Dia Mayala batambolaki na minduki calibre 12 mpo na bobengana baye banso bawuta bituka misusu.

M. Mbimba alobi ete balandi ba lingomba liye lisangakisa politiki na bikilakila ya bokoko bazali kobeta masasi.

Kasi moko na bayi police alobi ete ba policiers babale bakufaki lokola mpe balandi babale ba BDM.

Kolanda maloba ma ye bayi BDM mingi misusu bazoki

Yango wana police ekitaki esika yango mpe asalaki mosala moye momemaki kufa ya bato baye babale mpe mingi bzokaki.

Kasi kimya ezomgi.

Bundu dia Mayala ezali lingomba oyo mokambi na yango ayebani kozala Ne Muanda Nsemi.

XS
SM
MD
LG