Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Balandi ya DJ Arafat bafungoli nkunda mpe sanduku na ye nsima na bokundami


Balandi ya DJ Arafat bafungoli nkunda mpe sanduku na ye nsima na bokundami na lilita ya Williamsville, na commune ya Adjamé na Abidjan na Côte d’Ivoire, 31 août 2019.
Balandi ya DJ Arafat bafungoli nkunda mpe sanduku na ye nsima na bokundami na lilita ya Williamsville, na commune ya Adjamé na Abidjan na Côte d’Ivoire, 31 août 2019.

Bituluku ya balandi ya alanga nzembo ya Coupé-Décalé DJ Arafat bafungolaki nkunda mpe sanduku na ye mpe babandanaki kolongola ye bilamba nsima na bokundami na ye o’mokolo ya mposo na lilita ya Williamsville, na commune ya Adjamé na Abidjan na Côte d’Ivoire.

Bilili ya makambo yango bitamboli mingi na ba réseaux sociaux.

Bayike na baye bazalaki kati bituluku bazalaki komizwa photo na ebembe. Bayaki nsima na milulu ya bokundi mowei.

"Tolingaki totala nzoto ya idole na biso yambo ete nkunda ekandama mpo na libela," etatolaki moko na balalandi na AFP.

Bituluku biye bikomi nsima na losako bakonzi ya mboka, libota mpe bato basusu bapesaki mowei na lilita.

Balanga nzembo ya RDC lokola Koffi Olomide, Fally Ipupa, Bill Clinton na basusu mpe bazalaki wana.

Mokolo mpe butu boleki bizalaki ntango ya matanga na mboka mpo na alanga nzembo eye na stade Félix Houphouët-Boigny.

DJ Arafat awaki le 12 août nsima na likama na moto.

XS
SM
MD
LG