Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

FCC esengi na ba "patriotes nationalistes" basala liboke na nsima ya Felix Tshisekedi


Félix Tshisekedi, mokambi ya UDPS, na molongani na ye na nsima ya bosakolami na elonga na ye lokolo mokonzi ekolo, Limete, Kinshasa, 19 janvier 2019.
Félix Tshisekedi, mokambi ya UDPS, na molongani na ye na nsima ya bosakolami na elonga na ye lokolo mokonzi ekolo, Limete, Kinshasa, 19 janvier 2019.

Front commun pour le Congo (FCC) ebwaki mbela na patriotes nationalistes nyonso mpo na kosangana na nsima ya Félix Tshisekedi, molongi oyo asakolami na maponami ya présidentielle.

"Majorité présidentielle elendisi ba patriotes nationalistes ete basala liboke nzinga nzinga ya mokonzi oyo aponami mpe na ba institutions ya République," ekomi moko ya balobeli ya FCC André-Alain Atundu.

Na liyebisi liye, Atundu alobi yango esengeli esalema na botosi ya mangomba ya moko na moko kasi na bomoko.

Atundu alobi lisusu ete FCC ebongami mpo na koyokana, na nsima ya mokambi na yango joseph Kabila, ndenge nini bakosala elongo na Félix Tshisekedi.

FCC ezwi majorité na Assemblée nationale na ba assemblées provinciales na maponi mawuti kosalama.

XS
SM
MD
LG