Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

SADC esengi ete babandela botangi ya ba résultats ya maponami


Edgar Lungu, président ya Zambie mpe mokambi ya SADC, na Harare, Zimbabwe, 26 août 2018.
Edgar Lungu, président ya Zambie mpe mokambi ya SADC, na Harare, Zimbabwe, 26 août 2018.

SADC, lingomba ya ba mboka ya Afrika ya Ngele mpo na ntombwa (développement), yango mpe esengi ete babandela kotanga ba résultats ya maponami.

"Kobandela ya botangi ya ba résultats ekosalisa kokitisa mitema ya balongi na ya baye bakweyi," ekomi na mokanda président Edgar Lungu ya Zambie, mpe mokambi ya SADC na ngonga liye.

Président Lungu alobi ete ayebi "ntembe ya makasi" maye mazali likolo ya ba résultats maye masakolamaki na CENI o’mkolo ya le 10 janvier 2019.

Kolanda bilembo ya CENI, Felix Tshisekedi, mokambi ya UDPS, alongi maponami ya présidentielle na 38.57% liboso ya Martin Fayulu, opposant mosusu, oyo azwi azali na 34,8% mpe ya candidat Emmanuel Ramazani Shadary na 24%.

Mbela ya SADC ekweyi na nsima oyo ya CENCO (Conférence épiscopale narionale du Congo).

CENCO esengaki o’mokolo ya minei moleki ete Conseil ya sécurité ya Nations unies etiya CENI mbamba mpo na kondima kobandela botangi ya maponami.

CENCO ezali kokoba koloba ete ba résultats CENI esakolaki makokani te na maye bango ba zuwaki na procès-verbaux.

Martin Fayulu mpe aboyi ba resultats maye. Akokitisa recours o’mokolo ya mposo na Cour costitutionnelle mpe asengi babandela kotanga ba bulletins de vote.

Fayulu apesi losaka na SADC mpo mokanda liye. Alobi na compte Twitter na ye ete ekozali mabe kozanga kopesa maboko na processus démocratique ya RDC. "Tobengi bato nyonso na responsabilités na bango mpo na kozongisa bosolo ya maponami", ekomi Fayulu.

XS
SM
MD
LG