Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Hamed Bakayoko Ministre wa yambo ya Côte d’Ivoire awei na Allemagne


Hamed Bakayoko Ministre wa Yambo ya Côte d'Ivoire awei le 10 mars 2021.
Hamed Bakayoko Ministre wa Yambo ya Côte d'Ivoire awei le 10 mars 2021.

Ministre wa Yambo ya Côte d’Ivoire Hamed Bakayoko awei na bokono na lopitalo moko ya Allemagne epayi wapi amemamaki mpo na lisalisi, esakoli président Alassane Ouattara.

"Na mpasi monene, nazalai kosakola na bino liwa lya Ministre wa Yambo Hamed Bakayoko, mokonzi ya mbulamatari, ministre ya Bobateli ya ekolo, lelo le 10 mars na Allemagne, "eyebisi M. Ouattara.

Mokonzi ya Côte d’Ivoire abakisi ete M. Bakayoko awei na bokono bwa cancer.

M. Bakayoko azalaki na mibu 56, amemamaki na lombango mposo mibale mileki na Allemagne mpo na kozwa lisungi na nzoto mpo na bokono azwaki.

Molongani wa ye Yollande Tanoh mpe akendaki na ye.

M. Bakayoko ayebani mingi na bayi RDC.

Ayembama mingi na alanga nzembo ya ba Congo babale.

Azalaka kala ministre ya mambi ma kati ya Côte d’Ivoire.

XS
SM
MD
LG