Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Peintre mpe mosali bikeko Roger Botembe awei

Roger Botembe oyo azalaki peintre (mosoni), sculpteur (mosali bikeko) mpe plasticien ya lokumu ya ekolo Congo démocratique awei le 31 décembre 2019, photo etiyama na Facebook na mai 2018. (Facebook/Roger Botembe)

Roger Botembe oyo azalaki peintre (mosoni), sculpteur (mosali bikeko) mpe plasticien ya lokumu ya ekolo Congo démocratique awei le 31 décembre 2019 na Afrika ya Ngele, kolonda stie ba sango Actualité.cd.

Artiste to moto na ntoki oyo akufi nsima na bokono bolayi, kolanda sango ya Actualité.cd.

Azalaki na mibu 60. Ayebanaki na bikela bya maboko ma ye mpe mayele to boyebi bwa ye.

Atangisaki mpe alakisaki misala mya ye mibu mingi na Institut national des Arts ya Abidjan (Côte d’Ivoire), na Académie royale des Beaux-Arts ya Bruxelles to na Académie des Beaux Arts ya Kinshasa, na RDC, mboka epayi wapi abotama.

Asalaki ba tableaux, ba masques, peinture ya minene mpe bikela misusu biyebana mpe bitekama na ntalo mingi na mokili.

XS
SM
MD
LG