Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Gabriel Kyungu Wa Kumwanza awei na Angola


Gabriel Kyungu wa Kumwanza, mokonzi ya UNAFEC (Union nationale des fédéralistes ya Congo(, na Lubumbashi, 23 mai 2016.
Gabriel Kyungu wa Kumwanza, mokonzi ya UNAFEC (Union nationale des fédéralistes ya Congo(, na Lubumbashi, 23 mai 2016.

Gabriel Kyungu Wa Kumwanza akufi o'mokolo mwa mposo na Luanda, na Angola epayi amemamaki mpo lisalisi, elobi bayi libota.

Liwa lya ye lindimami na bakonzi ya mboka, bayi libota lokola mpe bayi lingomba lya ye UNAFEC (Union nationale des fédéraliste au Congo), lingomba lya ye.

Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi alobi ayoki sango yango na motema mpasi.

"Mokonzi ya mboka apesi ye losako mpe akanisi ye bo' moto oyo maye atiki na politiki mamonisami na ekolo mpe akoboli mawa na libota lya mowei, na bayi nzinga nzinga na ye mpe na balandi ba lingomba lya ye ya politiki," ekomi présidence ya RDC na Twitter.

Gabriel Kyungu azalaki na mibu 83 mpe azalaki na boyokani malamu na président Tshisekedi.

"Ezali na mawa na motema nde nawuti koyoka sango ya liwa ya président Gabriel Kyungu Wa Kumwanza. Ezali libulu monene mpo na mboka. Napesi losako na molimo ya moko na bakeli ba UDPS, moto moko atiki bilembo na lisitwale lya mboka na biso na mpiko na ye ya bokeseni,: ekomi na Twitter motamwisi ya UDPS mpe mokambi molandi ya Assemblée nationale, Jean-Marc Kabund.

Gabriel Kyungu Wa Kumwanza azalaki président ya conseil ya administration ya SNCC (Société nationales ya chemin de fer ya Congo).

Mposo mibale sango ya lokuta lipesamaki mpo na liwa lya ye. Kasi endimaki te ata na moto moko.

Mposo moleki mwana ya Gabriel Kyungu wa yambo akufaki.

Gabriel Kyungu wa Kumwanzaka, azalaki moko na ba partlementaires 13 baye bakelaki UDPS (Union pour la démocratie et le progrès sociale) elongo na nkondo Etienne Tshisekendi tata na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi.

M. Kyungu akomaki mpe moko na bayi bazali na ngambo ya président Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG