Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu alobi akokende na Union africaine mpe na ONU mpo na "vérité des urnes"


Balandi ya Martin Fayulu na meeting na place Ste Therese, N'Djili, Kinshasa, le 3 fevrier 2019.
Balandi ya Martin Fayulu na meeting na place Ste Therese, N'Djili, Kinshasa, le 3 fevrier 2019.

Liboso ya ba milliers ya balandi na ye na place Ste Therese, na Kinshasa, Martin Fayulu alobi akokitisa maboko te kasi akokoba bitumba mpo na bosolo ya maponami. Alobi akokende na Union africaine mpe na Nations unies na Genève.

M. Fayulu ayebisi ete mot d’ordre ezali: "résistance paicifque".

Ayebisi polele mabongisi ya bolutani na Joseph Kabila yambo na bosakolami ya ba resultats kasi alobi akutanaki na ye.

Ayambaki yambo mokonzi ya Monusco, Leila Zerrougui oyo atunaki ye soki alingi kokutana na Kabila.

"Nalobi nandimi kasi na Kingakati te. Nalobaki Congo ezali mboka na ye moko te kasi ezali mboka na biso nyonso. Biso na Lamuka tolingi Etat de droit. Tolingi revenge te. Mibeko mpe Mobeko likonzi ebongi mpo ete Kabila azala senateur a vie. Awa biso ezali makambo ya revenge te. Tokosala makambo ya mboka tokobongisa mboka …ezali mpo na kimya mpo na réconciliation nationale," elobi M. Fayulu.

Candidat ya lingomba Lamuka, alobi ayambaki baninga mibale baye batunaki ya motuna moko wana. Mpe bayebisaki ye ete M. Kabila na bakonzi nyonso baye été ye moto alongaki kasi bazali kobanga ye mpo azalaka matata.

M. Fayulu eyibisi ete akitisaki baninga baye motema kasi azela kino lelo bokutani na Kabila oyo esalame te.

Asengi na communauté internationale kotosa "souveraineté" bonsomi ya ban aya Congo.

XS
SM
MD
LG