Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Malaise kati ya majorité ya sika mpo bokaboli ya mabonga na gouvernement


Bahati Lukwebo, mokambi ya lingomba AFDC-A (Alliance des forces démocratiques du Congo et alliés), Kinshasa, 5 décembre 2018. (Facebook/Bahati Lukwebo).
Bahati Lukwebo, mokambi ya lingomba AFDC-A (Alliance des forces démocratiques du Congo et alliés), Kinshasa, 5 décembre 2018. (Facebook/Bahati Lukwebo).

Moko ya masanga ya kilo ya majorité ya sika na Assemblée nationale elobi te "malaise" ezali kati na boyakani na bango FCC (Front pour le Congo) likolo ya bokaboli mabonga too ba postes na gouvernements mpe na provinces.

Bahati Lukwebo, mokambi ya lingomba AFDC-A (Alliance des forces démocratiques du Congo et alliés) moko ya masanga ya kilo ya FCC (Front commun pour le Congo) alobi na mokanda atindeli bakambi ya boyokani liye te "malaise solo ezali likolo ya égoïsme (moyimi) mpe bozangi kotosa principe élémentaire ya poids proportionnel national ya regroupement moko mpe lisusu likolo ya ba calculs individuels ya ba oyo bazawaka mibeko ".

Bahati Lukwebo alakisi ete PPRD na ba alliés na yango ekoki kozwa mabonga nyonso te mpo ezali kaka 33% ya baponami. 67% etikali ezali ya ba alliés ya FCC baye batakali, kati na bango AFDC-A.

Bahati asengi batikela 2 provinces na CACH, 24 provinces mpo na ba 495 députés ya FCC, mpo na kotosa mobeko ya proportionnelle.

XS
SM
MD
LG