Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félix Tshisekedi akomi na Nairobi


Félix Tshisekedi na bokomi na ye na aéroport ya Narobi, Kenya, 6 février 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Félix Tshisekedi na bokomi na ye na aéroport ya Narobi, Kenya, 6 février 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Président Felix Tshisekedi akomi mercredi na Nairobi na Kenya.

Azali kokoba mobembo waye wa yambo nsima ya kokoma mokonzi kolonda maponami ya le 30 décembre.

Azali kosolola na président Uhutu Kenyatta ya Kenya oyo azalaki bobele mokambi ya ekolo ya bapaya moko oyo azali na milulu ya bozuwi bokonzi ya Félix Tshisekedi le 24 janvier na Palais de la nationa na Kinshasa.

Tokundola ete Lingomba liye momaki Felix Tshisekedi na maponami, CACH too Cap pour le Changement mobotamaki na Nairobi, engumba mokonzi ya Kenya.

Esalamaki elongo na Vital Kamerhe oyo atiami mokambi ya cabinet ya Felix Tshisekedi.

Nsima na Kenya, mokonzi ya sika ya RDC azelami na Congo-Brazzaville esika wapi asengeli akoma nsima ya nzanga.

Kasi Félix Tshisekedi atikaki Luanda, na Angola epayi wapi akomaki lobi moleki. Kuna asololaki na président Joao Lourenco na ntina ya kokomisa makasi boyoka kati na mboka mibale baye.

XS
SM
MD
LG