Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félix Tshisekedi asololi na Uhuru Kenyatta mpe Raïla Odinga na Nairobi


Président Félix Tshisekedi ya RDC, na loboko ya mwasi, apesi mbote na moninga wa ye président Uhuru Kenyatta ya Kenya, na mobembo na ye na Nairobi, 6 février 2019. (Twitter/Uhuru Kenyatta)
Président Félix Tshisekedi ya RDC, na loboko ya mwasi, apesi mbote na moninga wa ye président Uhuru Kenyatta ya Kenya, na mobembo na ye na Nairobi, 6 février 2019. (Twitter/Uhuru Kenyatta)

Mokonzi ya sika ya RDC akutani na moninga na ye mokonzi ya Kenya, Uhuru Kenyatta, mpe na mokambi ya opposition ya mboka libye, na mobembo wa ye mercredi na Nairobi.

Mokambi ya ekolo Kenya alobi asepeli mpenza na bokutani na ye na Félix Tshisekedi.

"Nalaki président Tshisekedi ete Kenya ekomipesa mpo na kosunga RDC kozala makasi. Kenya eyekoli makambo mingi na matata ya politiki maleka oyo elingi kokabola na bikolo ya Grands Lacs," ekomi président Kenyatta nsima ya bokutani na bango.

Mpo na Uhuru Kenyatta, "litomba na ya bokutani liye ezalaki koyikisa makasi bondeko kati na Kenya na RDC ", eyebisi président ya Kenya na compte Twitter na ye.

Yambo ya bokutani liye, Félix Tshisekedi asololaki na Raïla Odinga, mokambi ya opposition ya Kenya.

Masolo ya M. Tshisekedi na M. Odinga mazalaki mpo na makambo ya ba intérêt mpe coopération. Kasi mingi mpenza likolo ya ba infrastructures, ekomi na ngambo na ye Raïla Odinga na compte Twitter na ye.

XS
SM
MD
LG