Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dossier RAM: Assemblée nationale endimi bosenga ya ministre Kibassa ya kozela mbulatari kasi FCC esiliki


Bakeli mibeko bazali kokabola mikanda na likita moko na Assemblée nationale, Palais du peuple, Kinhsasa, 15 décembre 2012.
Bakeli mibeko bazali kokabola mikanda na likita moko na Assemblée nationale, Palais du peuple, Kinhsasa, 15 décembre 2012.

Motambwisi ya Assemblée nationale, Christophe Mboso asokoli ete chambre basse (suku ya nse) ya parlement ekozela ndimbola ya mbulamatari mpo na likambo litali RAM, mpako ezwamaka na ba téléphones mobiles, kolanda bosenga ya ministre ya PTNICT na biyano apesi na inerpellation na ye.

Augustin Kibasssa Maliba ministre ya Postes Telecommunications mpe Nouvelles Technologies ya Informations (PTNTIC), ayanoli mercredi na Assemblée nationale na motuna ya mokeli mibeko Claude Misare ya UNC.

Ministre ya PTNTIC andimi ete asosoli nkanda ya bato kasi asengi na Assemblée nationale kozela biyano ya mbulamatari epayi wapi amemaki mituna ya Assemblée nationale.

Eyano ya ministre Kibassa epesami na Assemblée nationale mpeza nsima na ngonga mpo wuto abengisamaka le 30 septembre esengelaki kozela ngonga ntuku minei na mwambe. Likambo lyango lisuki na mwa mobulu mpe commission ya boluki bakeli mibeko basengaki etiami te.

Nzokande, bakeli mibeko ya FCC, liboke lya mangoma mazali nsima na mokonzi ya kala Joseph Kabila, babimaki na nkanda na plénière ya Assemblée nationale nsima likita ya baninga ba bango kobwakisi motion de défiance to mokanda ya bosengi bolongwi ministre Kibassa bakotisaki mpo na likambo lyango.

Bayi FCC basakoli ete bazali kokongola sika ba signature mpo na motion ya kokweyisa mbulamatari ya Jean-Michel Lukonde nsima bobwakisami ya motion ya defiance basengaki mpo na ministre Augustin Kibasssa Maliba ministre ya PTNTIC, Postes Telecommunications pe Nouvelles.

XS
SM
MD
LG