Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dan Gertler alaki kopesa mbulamatari ya RDC mikanda mya ye manso ya mines


Dan Gertler na milulu mya botiami manzaka ya boyokani na mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique na Kinshasa, 25 féfrier 2022. (Mbulamatari ya RDC)
Dan Gertler na milulu mya botiami manzaka ya boyokani na mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique na Kinshasa, 25 féfrier 2022. (Mbulamatari ya RDC)

Dan Gertler, moyi mobongo na misala mya makele to mines, alobi apesi losako na boyokani bosalami na mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique ndenge azongisi bozwi bonso na l’Etat ya RDC.

Atiaki manzaka na bayi mbulamatari le 24 février eleki, koleka mposo moko sika, mpo na mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique ezongela bozwi ya pene na dollars milliars mibale ezali mpo na compagnie la Fleurette, compagnie ya Dan Gertler.

Na liyebisi abimisi, Dan Gertler apesi longonya na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi na basungi baye mpo na mosala malamu mpe ya siki siki mosalami na ntina ya kosukisa bokangami bozalaki kopesa kokende liboso.

Dan Gertler alaki lisusu mpe ete permis mpe ba licences to mikanda minso mipesi ye nzela ya kosalela makele, akozongisa yango.

Akudoli ete mpo na bolamu na ye mpe ya bana mboka Congo démocratique, amoni ete mokoki lokola ba blocs ya Lac Albert masengelaki te kokanga na mokano ya byi molongo mpo na kotia mobulu. N

oznga nde bayi société civile baike balobi basepeli ndenge makoki ma ye mazongisami na maboko ma mbulmatari kasi bazali kosenga ete boyokani bwango bobimisa na miso ya bato banso.

Lobi loloki, molebeli ya mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique, Patrick Muyaya asakolaki ete eloko ya kobomba ezali te mpe mikanda mya boyokani bwango bokotia na miso ya bato banso.

XS
SM
MD
LG