Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

111 Congolais bakangamaki na France mpe na Belgique bazongi mboka


Ba Congolais bawuti Paris na Bruxelles bakiti na mpepo ya Air France na aéroport international ya N'Djili, 15 mai 2020, (Twitter/Min. Affires étrangères RDC)
Ba Congolais bawuti Paris na Bruxelles bakiti na mpepo ya Air France na aéroport international ya N'Djili, 15 mai 2020, (Twitter/Min. Affires étrangères RDC)

Ba Congolais 111 bakangamaki na France mpe na Belgique na mikano ya confinement na mokili mobimba bazongi mboka.

Bakomaki vendredi na voal spécial na aéroport international ya N’Djili mpe bayambamaki na bayi ministère ya Affaires étrangères.

Mingi kati na bango bawutaki Paris na Bruxelles, bingumba mokonzi ya France mpe Belgique.

Jeudi, ba Congolais basusu motoba bazongisamaki kowuta na Côte d’ivoire. Samedi nde ba ya Congo-Brazzaville bakatisaki na Beach N'Gobila.

Bango banso esengeli batiyama na quarantaine ya mikolo 14 mpo na COVID19.

Yambo na yango, basusu mpe bazongisamaki kowuta Belgique, Cameroun mpe Dubaï (Emirats).

Batiyamaki na quarantaine kasi 16 kati bango bamonanaki na COVID19.

XS
SM
MD
LG